Select your language
Afrikaans
Arabic
Basque
Bulgarian
Catalan
Chichewa
Chinese
Croatian
Czech
Danish
Dutch
English
Farsi
Fijian
Filipino
French
German
Greek
Hebrew
Italian
Japanese
Kinyarwanda
Kisongie
Korean
Lingala
Malagasy
Norwegian
Nuer (Sudan/South-Sudan)
Oromo
Polish
Portuguese
Romanian
Russian
Slovak
Somali
Spanish
Swahili
Swedish
Tshiluba (DR Congo)
Turkish
Welsh

Kobebisama ya Moto

« Masumu ekotaka na mokili po na moto se moko adam pe liwa ekotaka po na masumu  banda tango wana liwa ezalaki kokweela bato nyonso, po bango nyonso basali masumu ». 

(Rome 5 :12 )

« kasi nzambe alakisaka kanda na ye uta na likolo epai ya bato nyonso oyo basalaka masumu ya ndenge, po misala na bango ya mabe epekisaka bango bayeba makambo ya solo té ».

( Rome 1 :18 )

« bato nyonso basali masumu pe bazangi nkembo ya nzambe na kati na bango » (Rome 3.23)

« boye nalobaki ete ,mawa na ngai jambi nabungi nazali moto na bibebu na mbindo mpe nafandi kati na bato na bibebu na mbindo ;mpo ete miso na ngai na moni mokonji yawe na bibele »

Mabongisi ya Bolingo na Nzambe

« Kasi angelu alobi na bango : bobanga te, nayeli bino sango malamu oyo ikosepelisa batu banso ; na butu ya lelo, na mboka ya David, pona bino, Mobikisi abotami, ye azali Klisto pe Mokonzi » (Luc 2 : 10-11)

«  Mpo ete Nzambe alingaki mokili na  motindo boye ete apesi Mwana na likinda na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete ajala na bomoyi na seko » (Yoane 3 :16).

«  Bolingo na Nzambe emonaneli biso ete Nzambe atindaki Mwana na ye na likinda kati na mokiliete tobika na bomoi mpo na ye.

bolingo ezaali boye te biso tolingaki Nzambe kasi boye ete ye alingaki biso mpo atindaki Mwana na ye lokola libonza pona kolongola masumu na biso »     (1 Yoane 4 : 9-10).

Nzela ya bolimbisi

« Nzokande nzambe  abandaki kokipé makambo wana te po bato bayebaki te mabe oyo bazalaki kosala kasi sik’oyo azali kobenga batu nionso, na bisika nionso  po ba bongola mitema » (  misala 17 :30).

«  soki tondimi ete tosali masumu ,azali sembo pe akokisa maloba na ye ,akolimbisa masumu nionso pe akokomisa peto » (1 Yoane 1 :9)

« abimisi bango na libanda pe alobi   « batata na sala nini po nabika ? bango bazongiseli ye : ndima nkolo yesu, bongo okobika , yo na bato nyonso ya fami  na yo » (misala 16 :30,31)

«  bato batuni yesu : tosala nini po na kokokisa misala oyo nzambe alingaka ? yesu azongiseli bango : mosala nzambe alingaka, yang’oyo : bondima moto oyo ye  atindaki » ( Yoane 6 :28-29)

Kopetolama ya masumu na batu 

Bongo ezali ngai Paulo te moto nazali na bomoï ; kasi ezali kristo moto azali na bomoï na nzoto na ngai .bomoi oyo nazali na yango sik’oyo , nazuaki yango po nandimela Mwana ya Nzambe,oyo alingaka nga pe amipesaki pona  ngai.(Galatie 2 : 20)

“ kasi ajokisami mpo na masumu na biso, atutami mpo na mabe na biso ; etumbu oyo eyeiseli biso kimia etiami  epayi na yee, mpe na mapipi na ye, biso tobikisami. (Yisaya 53:5)

Pamba te,Nzambe azali se moko ; pe moto oyo atii boyokani na kati ya Nzambe na bato azali se moko, yende yezu-Kristo ye azwaki nzoto ya bomoto , pe amipesaki po na kolongola bato nyonso na bayumbu . asalaki bongo na tango oyo Nzambe atie po na kolakisa te Nzambe alingi bato nyonso babika. (1Timoté 2 :5-6).

Boyebi eloko nini Nzambe afutaki po na ko longola bino nabizaleli ya pamba-pamba oyo bakoko batikela bino. Ezali  mbongo te to eloko mosusu oyo ebebaka ; kasi ezali eloko ya talo penza, yango nde makila ya kristo ye azali lokola mwana-meme oyo ebeba ata esika moko te (1Petelo 1 : 18-19)

Kasi soki tozali kotombola na moyi  ndenge Nzambe ye moko azalaka na moyi biso nionso tokomi lisanga moko, pe makila ya Yesu, mwana ya Nzambe esi elongola biso mbindo nyonso ya masumu.                 (1 Yoane 1 :7)

Bondimi eyambaka bolimbisi pe epesaka matondi

« Moto wana azongiseli ye : mokonzi, yebisa ngai ye azali nani po te nandima ye.Yesu alobi  omoni ye, ezali ngai moto nazali kosolola na yo.Moto wana azongisi :Mokonzi , na ndimi. Bongo,afukameli ye.   Sima Yesu alobi :ngai nayaki awa na mokili po te moto na moto azwa oyo ekoki na ye : Bato bakufa miso ba mona, pe baoyo bazali komona, miso na bango ekufa»    (Yoane 9 :36-39)

« Moto oyo andimi Mwana, akozwa bo moyi ya seko ; oyo atosi Mwana te akozwa bomoyi ya seko te, kasi akotikala seko na etumbu ya Nzambe » (Yoane 3 :36)

« Kasi ekomama pe po na biso . Pamba te Nzambe akamati biso pe lokola bato ya bosembo, po tondimi ete ye moto asekwuisaki Nkolo na biso Yesu. Atikaki bato baboma ye po alongola masumu na biso, po ete asekwisaki ye po akomisa biso bosembo ».             (Rome 4 :24-25)